Testo 207

Testo 207

Ndoki aza na posa ya mapapu té po apumbwa
Ndeke pe aza na posa ya ko lia kindoki na nguba té po apumbwa
Na mvula tortue azalaka na posa ya parapluie té
Poisson alukaka kopo té po amela mayi
Mais pona ngai yo oza passage obligé
Condition sinequanone ya vie na ngai

Ngai na yo pourquoi ezo simba té ?
Lokola pneu ya mutuka na danki
To ba zua ya vélo po ba tia na train
Est-ce qu'okoki ko tambuisa ango impossible mawa oh
Ngolela, ngai na yo pourquoi ezo simba té ?
Lokola moteur ya moto na char de combat
Incompatibilité eleki makasi
Jamais mayi eko benda papier
Bien que motema eza na forme ya lokolo té
Mais e exigisaka amour ya numéro pé pointure nango
Ya muké eswi ya monené edindi
Motema elingaka, amour ya taille nango

Chauffeur ya 207 kutu na yébi té oh
Asalaka effort akomisa nga na destination
Ebongo yo Mado na nga na yébi bien
Ata arrêt moko obo na yo olobi na kita oh
Chauffeur ya 207 kutu na yébi té oh
Asalaka effort akomisa nga na destination
Ebongo yo Ngolela na nga na yébi bien
Ata arrêt moko obo na yo olobi na kita oh
Mado eh Ngolela

Hydroquinone etelisaka loposo
Soki eleki eko bota ba tampon ou cancer
Amour epesaka n'est-ce pas esengo
Na pesi yo ebele eboteli ngai ba regrets, soucis
Montre ekufa kutu makonga nango
Eza na position oyo etelema
Pourquoi nga na zanga position na amour na yo ?
Ngembo, ata ba ndeke ba mpuku ba boyi yé mais aza kaka animal
Milinga koni eyindisaka nzungu eh
Mais jamais eyindisaka soupou eh to yébi
Mais souci ekondisaka moto nzoto eh
Mais eyindisi pé motema pona bolingo
Mawa na nga lokola ya mutambu
Ata ekangi ba niama zomi lifuti té oh
Chasseur nini ako kanisa yé ata na soupou
Na pési Mado mayi ya bolingo ebelé na zui ba larmes

Chauffeur ya 207 kutu na yébi té oh
Asalaka effort akomisa nga na destination
Ebongo yo Mado na nga na yébi bien
Ata arrêt moko obo na yo olobi na kita oh
Pourquoi Mado Ngolela ?
Chauffeur ya 207 kutu na yébi té oh
Asalaka effort akomisa nga na destination
Ebongo yo Ngolela na nga na yébi bien
Ata arrêt moko obo na yo olobi na kita oh

Lipa polo epesaka kanda na mutu awuti carême oh
Nga na kufela mama support etikala bolingo ya Mado
Ba soucis epapoli ngai ngai na suka wapi eh
Benga Fondé Liakiss le beau
Nani alamusa Marie Misamu ayembela yo nzembo na yé ya nzola oh
Nzola ndé bolingo (Nzolané oh yaya)
Nga na ko kufa soki oboyi nga (Nzola nga Ngolela)
Na ebalé ya ba soucis pia nga loboko ya bolingo (Nzolané oh yaya)
Na ko noyé soki obeti kara Mado (Nzola nga Ngolela)
Tuzolana nde bolingo (Nzolané oh yaya)
Ah tuzolana tuzolané (Nzola nga Ngolela)
Kelly Kena Musungayi na nga (Nzolané oh yaya)
Fabrice Mampuya, Philly Mampuya (Nzola nga Ngolela)
Tuzolana tuzolana (Nzolané oh yaya)
Tuzolana tuzolané (Linga nga Mado Ngolela)
Tuzolana Tuzola nani King Ngacia Triple N

Chauffeur ya 207 kutu na yébi té oh
Asalaka effort akomisa nga na destination
Ebongo yo Mado na nga na yébi bien
Ata arrêt moko obo na yo olobi na kita oh
Mado Ngolela
Chauffeur ya 207 kutu na yébi té oh
Asalaka effort akomisa nga na destination
Ebongo yo Ngolela na nga na yébi bien
Ata arrêt moko obo na yo olobi na kita oh
Wo wo wo wo Ngolela
Mado
Testi di Fally Ipupa